Floribert Bwana Chui, Ndakisa mpo na bilenge ya RDC mpe ya mabele ma Afrika.
Albys KBD Cp – Kinshasa/RDC
Pàpa alobi ‘te : Floribert Bwana Chui elenge mobali oyo «babomaki tango azalaki na bambula tùkù mibale na motobà na mpo azalaki mokristu malamu. Azalaki kotelemela bozangi bosémbo mpe azalaki kobatela bana baké mpe babolà». Léon XIV alakisi elenge mobali martiro oyo lokola ndakisa mpo ya bolenge ya Congo mpe ya Afrika mobimba. Alingi ete litatoli lya bomoi bwa yé botindika bango na “mpiko mpe elikya”. Na bokobi koloba, Tata-Mosantu abwaki mbela ya kafukafu na bilenge mpo na zubilé ya bango ekozala na Roma, kobanda mokolo mwa tùkù mibale na mwambé (28) ya sànzà ya yuli kino o mokolo mwa misato (3) ya Aogusti. Bongo alobaki lisusu na bilenge: “Na lobi na bino bilenge: nakozila bino na boumeli ya sànzà moko nà ndambo mp ona zubilé ya bilenge”.
Ba kolubola Floribert Bwana Chui Mwa-Esengo na bazilike Santu-Polo-Libanda-ya-Bifelo
Misa mya boluboli mwa-esengo mwa elenge martiro moye mokosalema na 17h30 na bazilike Santu-Polo-Libanda-ya-Bifelo (basilique Saint-Paul-Hors-les-murs). Tata episkopo wa lokùmu Marcello Semeraro, prefet ya dicastele ya mpo ya bansantu ndé akokamba misa mana. Episkopo wa lokùmu Fridolin Ambongo, episkopo monene ya Kinshasa mpe Mgr Willy Ngumbi, episkopo ya enguma ya Goma, diosezi epai wapi Floribert autaki, bakosangana na Misa mana. Libota lya mwa-esengo ya sika, bakongomani baùtaki bipai na bipai, nà mpe lingomba ya bakongomani bafandaka na Roma balengeli libakù linà. Lingomba Sant’Egidio oyo yé azalaki moko ya bango, bamipesi makasi mpo ete manso maleka malamu. Mbulamatari ya Republiki Demokratiki ya Congo elakaki ete ekozala mpe na libakù linà.
Kokufa mpo na Basusu
Laiko mokongomano Floribert Bwana Chui Bin Kositi akufaki bomartiro na 2007 na mbula tùkù mibale na motobà (26ans), sima ya koboya kanyaka. Akangaki nzela na mituka minene ezalaki komema loso ebebà oyo bakokaki koliya te, noki té ekokaki kotiya bokolongono bwa nzoto ta bato ebele na likàmà. Na yango balimwisaki yé, kuna bayokisi yé bwalé (banyongaki yé) mpe ba bomaki yé. Na eleko ya mobembo ya bantoma na RDCongo na 2023, Pàpa Franswa atangaki ye lokola ndakisa mpo ya bilenge. Ezalaki na libakù lya bokutani bwa yé nà bilenge na Stade ya bamartiro na mboka-mokonzi kinshasa. Alobaki boye: «Akokaki mpe kondima, atika yango ekota, ye mpe avwama (azwa mbongo). Kasi, bo mokristo bwa yé epekisaki ye, asambelaki, akanisaki baninga, mpe aponaki bosembo bongo alobaki ‘té’ o bosoto bwa kanyaka. Lolenge lyoko lisese lilobi ‘te kobomba maboko bopeto, nzokandé maboko oyo ezali kotambwisa mbongo etondi makila …, Soki moto apesi yo mbongo,to alaki yo bomengo mpe nkita, kokweya na motambo mona té, kolinga te bakosa yo, kodinda na mabé té. Kotika mabé elonga yo té».
Boluboli bwa yé lokola Mwa-Esengo ezali libakù monene ya kotondo Nzambe mp ona Eklezya ya Congo mpe Afrika, mingi mpenza mpo ya lingomba Sant’Egidio oyo wapi azalaki moko wa bango. Mosala mwa yé ezalaki kokamba mingi bana ya nzela na engumba ya Goma, mboka-mokonzi ya Nord-Kivu, esika wapi abotamaki, na ekolo ya Republiki Demokratiki ya Congo.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.