Bilenge mibale ya France basali km 1800 na kinga po na bozali o Zubilé ya lisano
Jean-René B.- Kinshasa
Balongwaki mokolo ya 16 ya sanza ya mitano uta esika ya château ya Vitré na ouesti ya France. Edgar, mibu 19, pe Paul, mibu 18, batombelaki sanza moko ya bomoi na bango po na kokoma na Roma pe kozala na Zubilé ya lisano mikolo ya 14 pe 15 ya sanza ya motoba.
Bilenge baye bakomaki na Roma na sé ya moyi makasi mokolo ya mitano 13 ya sanza ya motoba. Balongwaki poso moko sima ya liponami ya Léon ya Zomi na Minei, babandi na boleki ekolo na bango uta ouesti kino esti, baleki bituka ebele yambo ya kokoma na Italie. Nionso na ba “nzela ya mike pe ya zamba”, elobi Paul.
Likanisi ebotami sima ya Mikolo ya mokili ya Bilenge (JMJ)
Na bosali km 80 pe 100 na mokolo, baninga babale bapesi elembo ya molimo makasi na mobembo na bango mwa boyambi. Liboso na botelemi mingi po na bokoti ba misa ya pokwa na bituka oyo balekaki. Kasi lokola na botali bisika biyebana lokola basilique ya Santu-François na Assise. “Ezalaki eleko moko enene, ekobaki Paul, po esika ena epayi wapi santu François avandaki ezali na motuya po na ngai po nazalaka scout”.
Likanisi eyelaki bango sima ya Mikolo ya mokili ya Bilenge biye babengi na lopoto Journées mondiales de la Jeunesse na Lisbonne na 2023. Sango moko azalaka na bango apesaka bango likanisi ena. «Tomonaki likanisi ena malamu ya kosala sanza eye ya mobembo mwa boyambi na kinga po na kokoma na Roma zambi ya Zubilé ya lisano”, elobaki Paul, elenge moyekoli n’Angers.
Bokutani etiki bilembo
Po ya esika ya kovanda, Edgar na Paul bazalaki kotuna na ba paloasse pe bakutani na bato na bokumbi kinga na bango. “Na etuka ya San Remo na Italie, sima ya misa, tokutanaki na basi bazalaki koloba italien pe espagnol. Balakisaki biso na sango moko ya ekolo Mexique oyo tolekisaki na ye pokwa moko kitoko”, ekanisaki Edgar. Tango mosusu, bakumbi kinga mibale basengelaki kotelemisa ema po na kolala, yango ezalaki kopekisa bango te basolola na bato ya ba mboka nionso bisika balekaki. Na nzela na bango, etondaki na mikakatano bebo na ba kinga na bango.
Mosala moko na lisanga
Liboso ya mobembo mwa boyambi na Ezibeli Esantu pe ya misa ya mokolo mwa eyenga ya 15 ya sanza ya motoba, Edgar na Paul bakendeki na likita ya Zubilé ya Pápa François. O eleko ya lisikulu na ye, Santu-Pápa abimisi motuya ya lisano, na bolobi ‘te “lisano, ememami na elikya, na lolenge ekosenga boluki likambo moko, ya komeka tango inso ya bokolisi bilembo bwa ye pe ya koyekola kosala na lisanga na basusu”. Bilenge mibale bazalaki na esengo ya kokota na basilique Santu-Petelo pe ya koyoka Pápa Léon ya Zomi na Minei, lokola elembo ya suka ya mobembo na bango ya molimo.