Pápa asololi na ministre wa yambo ya Espagne na nzela ya singa
Jean-René B.-Kinshasa
Ndako ya bopanzi nsango ya Ngwende ya santu Petelo elobaki ‘te Pápa Léon ya Zomi na Minei na mokambi ya bulamatari ya Espagne, Pedro Sánchez Pérez-Castejón, basololaki na nzela ya singa mokolo ya misato na pokwa. Na kati ya lisolo Pápa atondaki botondi mokonzi Felipe na mwasi na ye Letiza na bozali na bango o eleko ya misa ya bobandi mosala na ye ya mokitani ya santu Petelo.
Na pokwa, “o kati ya lisolo, ekobaki communiqué, balobaki makambo bitali bikolo inso, mingi mpenza likambo ya migration, lisengeli ya botongi ba gbagba po na kosilisa bitumba bizali kosalema pe bobateli lokúmu ya bato”
Na suka, communiqué elobi, “sima ya koloba Lisanga ya minei ya mokili mobimba na oyo etali bopesi mosolo po ya botomboli, eye ekosalema na Séville na sanza ya motoba, mokambi ya bulamatari ya Espagne ayebisaki lisusu bobiangi wa ye epayi ya Santu-Pápa zambi asala mobembo na ekolo na ye.
Elikya ya bobongisi ebele
Na oyo etali migration, na bosali lolenge bikolo bisusu ya Poto bizali kosala te, bulamatari ya Espagne alingi kondima mobéko ekoki kosunga po na bobongisi mikanda ya pembeni na ba migrant 500.000, oyo ezali likanisi ya mobéko ebongisamaki na Caritas eye ezali na mosala makasi epayi ya bato bazanga mikanda.
Mongongo moko ya diplomatie ya ye mei
Na bosali lolenge moko na baninga na ye ya Poto na oyo etali lisungi po na Ukraine pe lotómo ya bobateli démocratie, Pedro Sanchez akeseni na bikolo ya makasi koleka ya Poto na bozui mikano miye mikotelemela “bobomi bato na Gaza” na bulamatari ya Israël. Sima ya bondimi kobanda sanza ya mitano ya 2024 ya bokeli Ekolo moko ya Palestine, bulamatari akani kobebisa makambo misusu babongisa na Israël. Lokola Ngwende ya Santu-Petelo, Espagne asepeli na mwango ya bikolo mibale. Mwango eye France na Arabie saoudite bikani kobandela lisusu uta 17 kino 20 ya sanza ya motoba, o eleko ya lisanga moko ya bikolo na ONU.